Psalms 123

Nazali kozela ngolu na yo

Nzembo ya mobembo tango bazalaki na nzela mpo na kokende na ndako na Yawe.


1 Natomboli miso na ngai epai na yo,
epai na Yo oyo kiti ya bokonzi ezali na Likolo.

2 Lokola miso ya bawumbu ezali kotala
loboko ya mokonzi na bango,
lokola miso ya mosali ya mwasi ezali kotala,
loboko ya mokonzi na ye ya mwasi,
ndenge miso na biso etalaka epai ya Yawe Nzambe na biso,
kino akomonisa biso mawa na yo.

3 Yokela biso mawa, Yawe, yokela biso mawa ;
pamba te toyambi na pasi mingi matioli.

4 Toyambi na pasi mingi maseke epai ya bato ya lolendo,
na matioli ya bato ya lofundu.
Copyright information for LinMNB